Christian Churches of God

 

[052]

 

 

 

Kobongola motema mpe Batisimo

 

(Ebimeli 2.1 19940903-19980505-20070626)

 

 

 

Mokanda oyo ya boyekoli ezali kolobela malongi oyo etali prédestination (makambo oyo ekanamaki liboso) mpe Kobengama ya Nzambe. Ezali kolimbola ete kobongola motema mpe kobongwana ezali makambo oyo esengeli mpo na kozwa batisimo mpe ete yango elandaka moklisto bomoi na ye mobimba.

 

Christian Churches of God

PO Box 369,  WODEN  ACT 2606,  AUSTRALIA

 

Courriel: secretary@ccg.org  

 

(Copyright © 1994, 1998, 2007 Wade Cox)

(Tr. 2022)

 

Mokanda oyo ekoki na bonsomi nyonso kosalama kopi mpe kokabolama soki esalemi na mobimba na yango, kozanga ete bábongola yango to bálongola makambo kati na yango. Tyá mpe nkombo, adresi, mpe liyebisi ya lotomo ya mokomi. Mosolo moko te ekoki kosɛngama epai ya bato oyo bakozwa bakopi oyo bakaboli. Maloba mikuse ekoki kozwama na kati mpe kotiama na ba artikle to ba zulunalo ya botendi kozanga ete babuka lotomo ya mokomi. 

 

Mokanda oyo ezali na nkasa ya Internet ya mokili mobimba :
http://logon.org/ mpe http://ccg.org/

 


 

Kobongola motema mpe Batisimo [052]

 

 


Esengeli kotanga yango elongo na audio [ya angelé]

 

Malongi etali prédestination (makambo oyo ekanamaki liboso)

Kokɔta na Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya Ngolu. Moto moko te ayaka epai ya Nzambe na nzela ya bososoli to mayele na ye moko. Ezali likambo ya mayele te. Soki ezakala bongo, boye ba universitaires (bato ya mayele) balingaki bazala bato ya liboso oyo bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe. Emonani na makambo oyo basalaka mpe balobaka ete ekozala bango te.

 

Moto nyonso asumukaka. moto azali na Molimo Mosantu te. Yango wana, elimo ya moto ezali kotɛmɛla Nzambe. Yango wana makomi elobi ete makanisi ya mosuni ezali bonguna epai ya Nzambe (Barome 8:7). Yango mpe ebongolami: mpo ete bizaleli ya nzoto ezali koyina Nzambe na kati ya Biblia ya RSV Version. Ntina nango ezali ete Lolenge ya Nzambe  epesamaka na Molimo Mosantu. Soki Molimo Mosantu ezali te, tozali kobika na bokeseni na Mibeko mpo tozali na lolenge ya Nzambe te. Lolenge oyo euti na Nzambe lokola centre ya boboto. Nzambe azali solo, mpe bobele solo nde ekoki kopesa biso bonsomi (Yoane 8:32). Bosolo ezali bongo eloko oyo euti na Molimo, kosantisa baponami (Yoane 17, 17-19).

 

Na yango, tokoki te kozala  Baoyo ya Bokonzi soki Molimo Mosantu epesameli biso te. Molimo oyo ekimaka masumu. Nzambe asengeli, bongo, kozwa mokano ya bososoli ya kotia baponami polele liboso ya Molimo koyeba ete bakokweya te. Asalaka yango na likoki na ye ya bonzambe ya boyebi ya makambo nyonso. Yango wana tobengami na bopemi na Ye, kobanda na Klisto (1Petro 1:20), mpe tokomamaki na Buku ya Bomoi uta ebandeli ya mokili (Emon. 17:8). Misala ya Nzambe esilaki liboso ya bokeli ya mokili (Baebele 4:3). Baponami bazali mosala ya Nzambe.

 

Ezali Nzambe na nzela ya Klisto, na lisungi ya Molimo Mosantu, Nde afungolaka mayele ya baponami nyonso, kobanda na Bantoma, mpo ete Makomi makoka kososolama (Luka 24:45). Ezali mpo na ntina wana nde Yesu Klisto azalaki koloba na masese, mpo ete baoyo baponami te bakoka kososola te. Soki te, balingaki bazonga pe babikisama (Mat. 13:10-17) yambo bakoka kokota na esambiseli. Nzambe azali na motema mawa mpe alingi te moto moko akufa (2Petro 3:9). Yango wana, na nzela ya likoki naye ya bonzambe ya koyeba makambo liboso , moko na moko abengami engebene na mokano na Ye. Mpo baoyo Ye ayebaki liboso, Ye akanaki liboso ete bázala lokola elilingi ya mwana na Ye, mpo ete azala mwana ya liboso na kati ya bandeko ebele. Baoyo ye aponaki, ye abengaki bango; baoyo abengaki, ye akómisaki bango bosembo; Baoyo akomisaki bosembo, ye apesi bango nkembo. Bongo tokoloba nini na likambo oyo? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akoki kotɛmɛla biso? ( Barome 8:28-31 ). Talá mpe mokanda  La Prédestination (No. 296).

 

Kobongola motema mpe Kobongwana

Mpo bato bázala na bomoi, to bázwa bomoi ya seko, Nzambe asɛngi bango babongola mitema. Soki babongoli mitema te, bakokufa (Luka 13, 3,5). Klisto atindamaki mpo na kobenga bato mpo na babongola mitema (Luka 11:32). Klisto abandaki mosala na ye sima ya bokangami ya Yoane Mobatisi (Mat. 4, 12,17). Bokangami ya Yoane esalemaki na ntango moko boye nsima ya pasika ya mobu 28 T.B. (Tango na biso) (Yoane 3:22-24; Mat. 4:12), ezalaki pasika nsima ya ebandeli ya mosala ya Yoane na mbula ya zomi na mitano ya boyangeli ya Tiberius (Luka 3:1) . Banda tango wana Yezu abandaki kosakola alobi: Bóbongola mitema, pamba té bokonzi ya likolo ekómi pene (Mat. 4:17). Klisto apesaki balandi na ye mokumba ya kosakola nsango malamu ya bobongoli motema, apesaki bango bokonzi likolo ya bademo to milimo ya mbindo (Marko 6:7,12; Luka 10:1, 17-20).

 

Makambo mibale ezali na ntina mingi mpo na bobongoli motema. Ya liboso ezali boyebi ya lisumu mpe likambo oyo ete moto asali lisumu (Barome 3:23). Ya mibale ezali kozala na makoki ya kozongela Nzambe, na nzela ya liloba na Ye. Na yango, topesameli likoki ya kososola lolenge ya lisumu mpe makambo oyo ezali na kati ya mabombami ya Nzambe. Baponami bazali na nguya likolo ya milimo mabe bobele mpo na kolakisa ete bankombo na bango ekomami na Lola mpe mpo na kokamba misala mpe makambo nzinganzinga na bango na etumba ya molimo oyo bakutanaka na yango. Na yango, bakómaka kotya motema na makoki na bango ya kozala makasi koleka nguya ya bademó.

 

Bobongoli motema eteyamaki lokola ebandeli ya kolongolama ya masumu (to mabe; Misala 8:22) mpo ete ntango ya kopema eya na bozali to epai ya Nkolo, mpo atinda Klisto oyo ye aponela biso uta kala. (Misala 3:19-20).

 

Yango wana, Klisto atindami epai na biso te kino tobongola motema. Ezali likambo oyo ezali kokoba. Klisto atindami epai na moto na moto, mpe mbala moko mpo na libela. Bato oyo bandimeli bosato bazali na mikakatano to bazali na mpasi ya kososola likambo oyo mpo bazangi bososoli ya Bonzambe.

 

Ntango ya bozangi boyebi, ndenge babengi yango, Nzambe azali kotalela te kasi, nsima ya Klisto, apesi bato nyonso motindo ete babongola mitema, mpo atyeli bango mokolo ya kosambisama (Misala 17:30). Na bongo, bobongoli motema epalangani na bapakano (tala lisusu Misala 15:3).

 

Bososoli ya lisumu mpe ya bozangi ntina ya mosumuki ezali likambo monene oyo esalaka ete moto abongola motema. Bongo kozala moyengebene na miso ya moto ye moko ezali lisumu ya mabe koleka, mpo mosumuki akoki komona bozangi kokoka na ye moko te. Ezali komikosa.

 

Nzambe abwakaka masumu (mabebisi) na biso mosika mpenza lokola est ezali mosika na westi (Nzembo 103:12). Talá ndimbola monene ya Nzembo 103:6-14

Nzembo 103:6-14 Nkolo azali kosala misala ya boyengebene, Mpe kozwa bikateli ya lisambisi mpo na baoyo nyonso bato babubi. 7 Ayebisaki Moize banzela na ye, Misala na ye, na bana ya Yisraele. 8 Nkolo azali na motema mawa mpe na ngɔlu, Ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto. 9 Akoluka ntango nyonso komonisa mabunga na biso te, Akokanga mpe nkanda te libela. 10 Asaleli biso makambo na kolanda masumu na biso te Akweisi mpe biso te na makambo oyo esengelaki tókwea, na kolanda mabunga na biso. 11 Mpo se ndenge likoló etombwaná koleka mabele, Motema boboto na ye epai ya baoyo bazali kobanga ye eleki monene. 12 Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka, Ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko. 13 Se ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa, Nkolo ayokeli baoyo bazali kobanga ye mawa. 14 Mpo ye moko ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, Azali kobosana te ete tozali putulu.

 

Nsima ya kobongola motema mpe kozonga epai ya Nzambe, mosumuki oyo abongoli motema asengeli bongo kosala misala oyo ebongi na bobongoli motema (Misala 26:20). Tosengeli kobongola bizaleli na biso. Lisumu esalemaka na mbalakaka te; yango eutaka na momesano ya makanisi. Na nzela ya réaction physico-chimique, bokundoli ya ntango molai [to mimeseno oyo ekotisa misisa] efandaka na bɔɔngɔ na biso. Yango wana, ezalaka mpasi bato bátɛmɛla lisumu to bábundisa yango. Basengeli kobongola mpenza ndenge oyo makanisi esalaka. Oyo ezali moboko ya likomi: Bopesa banzela na bino epai ya Nkolo mpe Ye akobongisa makanisi na bino. Yango emonisami na Biblia ya RSV lokola: Bopesa banzela na bino epai ya Nkolo mpe Ye akotelemisa miango na bino (Masese 16:3; tala lisusu 2Ko. 10:5).

 

Biblia ya KJV Version ekoki mbala mosusu kokanga ntina monene ya mosala ya bɔɔngɔ. Ezali likambo oyo ezali kokoba. Bibongiseli misusu ya bomoi ya bato esili kokende mosika na boye ete bakoki lisusu kolonga mabe na bango te. Nzambe abomaki Sodoma mpo ete bato ya Sodoma bakokaki te kosembolama na kotala ntango oyo epesameli mpe mosala ya mwango, mpe makoki na bango ya koteyama mpo na kobongola motema. Na maloba mosusu, lolenge na bango ya kokanisa ebebaki mpenza na boye ete bakokaki te kondima bansango oyo batindelaki bango. Na bongo, na Mikolo ya Nsuka, bato bakotika te ete Nkolo abongisa bikolo, ata ntango Motatoli ya esakweli mpe ya makomi azali liboso na bango. Yango wana Sodoma ekokweisa bato na biso (Mat. 11, 23-24; Marko 6:11; Luka 10:12) – mpo tozali na nsango ya Klisto bango bazalaki na yango te.

 

Na yango kobengama ya Nzambe, engebene na molɔngɔ́ ya makambo oyo ekanamaki liboso, ezali litambe ya liboso na nzela ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe. Nzambe ayebi nsuka banda ebandeli. Akopona te bato oyo bakolonga te. Yango wana mingi babengami kasi moke nde baponami (Mat. 22:14).

 

Nzambe azali kokotisa na nko bato na esambiseli te liboso ete bázala na likoki ya kotyama na nse ya likambo yango. Na bongo, baoyo babengami kasi baponami te bakozonga kaka na Lisekwa ya Mibale. Ndakisa, baoyo banso babatisami na ntango oyo kati na Eklezia mpe bakweyi na Bosato bakendaka na Lisekwa ya Mibale. Bamemami na esambiseli te. Nzambe amimonisi epai na bango te. Lisengami mpo na kozala na Lisekwa ya Liboso, oyo ezali kozala na bomoi ya seko, ezali koyeba Nzambe bobele Moko ya Solo pe mwana na Ye Yesu Klisto (Yoane 17:3). Yoane 17:3 etaleli masekwa nyonso mibale mpe bato nyonso. Mosambeli moko te ya nzambe ya lokuta, ata moto oyo alobi ete azali moklisto, ndakisa bato ya Bosato , to mosambeli ya banzambe misusu ya lokuta, akozwa libula ya bomoi ya seko, ata na Lisekwa ya Mibale. Mabunga na bango ekolakisamela Bango na Baponami Baoyo bakozala bateyi na bongo lokola bikelamo ya Molimo. Soki babongoli mitema te na Lisekwa ya Mibale, bakokufa mpe bakotumbama na Gehena. Bakokutana na boponi na eleko ya mibu nkama moko (Yisaya 65:20). bakobongola mitema, to bakokufa !

 

Yango etali lisumu nyonso oyo ebuki mibeko ya Nzambe. Mobeko ya Yambo mpe eleki Monene —Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso (Mat. 22:37; Marko 12:28, tala Mib. 6:5) — esangisi mibeko minei ya liboso kati na Mibeko Zomi. Mobeko Monene ya Mibale —Lingá moninga na yo ndenge yo moko omilingaka ( Mat. 22:39 , talá Lev. 19:18 ) — esangisi Mibeko motoba ya nsuka. Likolo ya Mibeko oyo mibale ya minene to ya katikati ekangemi Mibeko nyonso mpe Basakoli (Mat. 22:40). Na yango, Mibeko Zomi ezali kaka yango moko te; ezali bopanzani ya mibeko (mibale ya minene) mpe moboko ya Mibeko ndenge Masiya apesaki Moize na nzela ya Molimo Mosantu. Kobongola motema ezali nzela ya kozongela Nzambe na kati ya ebongiseli na Ye (Mal. 3, 6-12) (tala molongo ya Mikanda elobeli Mibeko na mokanda Mibeko ya Nzambe (No. L1)).

 

Nzela oyo ya kozongela Nzambe esalemaka kati  ya mosala ya koyeba to koyekola to kokoma na likoki ya koyeba Nzambe (Yoane 17:3; 10:37-38). Klisto amonisaka Tata na moto  sima ya Tata kopesa ye na Klisto mpo ete mosala ebanda (Yoane 6:44, 57, 65). Na yango, libiangi esalemaka uta ebandeli ya mokili mpe ezali na ndenge ya ebongiseli. Oyo ezali litambe ya yambo kati na matambe misato, litambe ya mibale ezali batismo mpe ya misato ezali kokoba na bobongoli motema.

 

Batismo

Bokonzi nyonso epesamaki na Klisto nsima ya lisekwa na ye (Mat. 28:18). Apesaki bayekoli na ye motindo ete bákende kokómisa bikólo nyonso bayekoli, kobatisa bango na nkombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu (Mat. 28:19), koteya bango básala nyonso oyo Klisto apesaki bango mitindo. Na bongo, alingaki azala ntango nyonso elongo na bango kino na nsuka ya eleko (Mat. 28:20).

 

Mpo na kozwa likabo ya Molimo Mosantu, kobongola motema esengeli elandisama na batisimo (Misala 2:38). Tokoki te kozwa Molimo Mosantu kaka se soki to bongoli mitema mpe tobatisami, boye tobotami lisusu. Soki tobotami lisusu te, tokoki kokota na Bokonzi ya Nzambe te (Yoane 3:3,5). Kobongola motema esengami liboso ya batisimo mpe ya bozwi Molimo Mosantu. Na yango, batisimo ya bana mike epekisami mpo ekeseni na mateya ya Biblia. Batisimo ezali yambo ya masakramentu mibale kaka ya Eklezia, mosusu ezali Elambo ya Nkolo (tala mokanda Basakramentu ya Eklezia (No. 150)).

 

Lisengami ya yambo ya kobongola motema, emonisamaki na mosala ya Yoane Mobatisi, oyo azalaki mobongisi nzela ya batisimo ya Molimo Mosantu na kati ya Klisto (Marko 1, 4,8). Yoane asakolaki ete Klisto akobatisa na Molimo Mosantu mpe na mɔtɔ, mpo na bato oyo babongoli mitema te (balimbolami lokola matiti) (Luka 3:16-17).

 

Molimo Mosantu ezali kopesama na nse ya bokambi ya Nzambe. Kolanda bosenga, oyo emonisami na kotyama maboko, Molimo Mosantu ekotaka kati na moto. Molimo Mosantu epesamaka te na moto oyo azali kotia maboko. Moto to bato oyo batiaka maboko basalaka yango lokola bantindami ya Eklezia, kosenga na Molimo Mosantu endima bosenga ya Eklezia mpe ya moto , mpe ekota na kati ya moyambi mpo na kosala mosala songolo. Yango wana ezalela ya mosali (motindami) ya Eklezia ezali na ntina moko te mpo na bondimami ya mosala ya batismo. Klisto alobaki ete eloko nyonso mibale to misato kati na bino bokangi awa na Mokili ekangami na Likolo (Mat. 18:18-20).

Matayo 18:18-20 Nazali koloba na bino penza ya solo: nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo. Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo : soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango. Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango. (MNB)

 

Molimo epesami bongo mpo na makambo nyonso ya mosala ya Nzambe mpe moto moko te apesaka yango. Molimo Mosantu ezali kosala mosala uta liboso ya batisimo na kosala na moto moko na moko. Molimo ebendaka baponami epai ya Nzambe na nzela ya Klisto (Baebele 7:25). Mbuma ya liboso ya Molimo epesami na moto na ntango ya batisimo, engebene na Baloma 8:23, oyo emonisi polele ete adoption esalemaka te liboso ya kosikolama ya nzoto. Tozali bongo kobotama lisusu kasi kokoba kokola na molimo kati na Klisto Yesu mokolo na mokolo kino tokokota na nkembo ya Nzambe (tala mikanda Molimo ya adoption (No. 034) mpe Kobotama Lisusu (No. 172) )..

 

Likabo oyo ya Molimo Mosantu na tango ya batisimo ezali mayi oyo ezuami na maziba ya lobiko oyo Nzambe alakaki na nzela ya basakoli na Ye (Yisaya 12:3). Mai oyo ya Molimo Mosantu ezalaki elaka ya Nzambe epai ya Yakobo, oyo ekomami na Yisaya 44:3. Nkolo Nzambe azali liziba ya mai ya bomoi (Yirimia 2:13; 17:13; mpe Zekalia 14:8). Ezali nde ebale ya mai ya bomoi (Emon. 22:1). Klisto, koloba oyo etali Molimo (Yoane 7:39), alobaki ete uta na ye mai ya bomoi ezali kobima (Yoane 4:10-14; 7:38 tala Yisaya 12:3; 55:1; 58:11; Ezekiele 47:1 ). Yisalaele na molimo epetolami na mai, uta na Ezekiele 36:25, oyo ezali mai ya bomoi to Molimo Mosantu. Baponami bazwaka mai oyo ofele (Emon. 22:17).

 

kokoba na kobongola motema.

Kobongola motema ezali mosala oyo ezali kokoba ngonga nyonso mpe esengeli ekoma mozindo na bouemeli ya bambula ezali koleka nsima ya libatisi. Eklezia ya Efese ebengamaki mpo na kobongola motema mpe komikundola esika ekweyaki, mpe kosala misala na yango ya liboso (Emoniseli 2:5). Ndenge moko mpe, Eklezia ya Pergamo ebengamaki mpo na kobongola motema (Emon. 2:16), lokola mpe Eklezia ya Tiatila (Emon. 2:21-22) oyo ezalaki na bapɛngwi oyo balalaki (bamibwakaki na mbeto) elongo na bateyi ya mangomba ya lokuta. Eklezia ya Sarde mpe ebengamaki mpo na kobongola motema, soki te Klisto akoya epai na bango lokola moyibi na butu mpe bakoyeba te ngonga nini akoya (Emon. 3:3). Baoyo Klisto alingaka, apamelaka mpe apesaka bango etumbu. Asengi bango (na likambo oyo etali baoyo ya Laodikia) bázala na molende mpe bábongola mitema (Emon. 3:19). Bobongoli motema ezali bongo ntango nyonso mpo na Ba Eklezia nyonso ya Nzambe, ezali mokumba ya bato nyonso (Yakobo 5:19-20).

 

Na yango, kobongola motema ezali likambo oyo esengeli mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe. Soki ezalaki te mpo na baponami oyo bazali Tempelo ya Nzambe (Lev. 26:12; 1Ko. 3:16-17; 6:19, 2Ko. 6:16; Ef. 2:19-22) mpe oyo bazali eteni ya mosala oyo Nzambe abandisaki banda ebandeli ya mokili, moto moko te alingaki atikala na bomoi (Mat. 24:22). Nzambe alingaki apesa nzela bato nyonso ya Adama bakufa ndenge alingaki ete Banefilime bábomama (tala mokanda Banefilime (No. 154)).

 

Nzambe azali kosala mpo na kobongisa na bato na nzela ya Yesu Klisto mpe baponami oyo bakomamaki na Buku ya Bomoi liboso ya bokeli ya mokili. Baponami bakanamaki liboso mpo na kobengama. Babengamaki mpo na kobongola motema. Kobongola motema esengamaki pona  kozwa Molimo Mosantu oyo ekokaki kaka komonisama na batismo. Bobongoli motema ezali Kokoba uta na libatisi mpo ete tokoka kokola na Molimo kino tokokoma na ezalela ya kokoka mpe kokota na adoption, oyo ezali bosikoli ya nzoto.

 

Baoyo balali basengeli kosekwa na mosuni mpo ete bakoka kobongwana na bikelamu ya molimo neti Klisto abongwanaki, lokola likabo ya liboke. Masiya azalaki moto ya liboso kati na ba mbuma ya liboso. Akomaki mwana ya Nzambe na nguya na lisekwa na ye ya bakufi (Baloma 1:4). Tozali mpe bambuma ya liboso: topesami Molimo na Pantekote mpe tosikolami na boyeyi ya Klisto. Molongo ya Mikolo Misantu ezali komonisa makambo oyo ya libiangi mpe boyokani na biso na Nzambe Tata na nzela ya Yesu Klisto.

 

Talá mikanda Bafɛti ya Nzambe no oyo etali Bozalisi (No. 227). Mpe Mikolo Mosantu ya Nzambe (No. 097).

 

 

 

q